Nande, Yira tǒ Kondjo ezalí ekólo ya Kongó-Kinsásá o etúka ya Kivu ya Nola (Kivu ya likoló), mpé ya Uganda. Banande bavándaka pɛnɛ o mbóka ya Bashu mpé bingúmba Lubero mpé Beni, pɛnɛ o moliba Edouard.
Babéngaka bangó Banande tǒ Bayira o Kongó, mpé Bakondjo o Uganda.
Motángo mwa bato mozalí pɛnɛ 903 000 o mobú 1991.